Bato bakanisaka ete nsuka ya bomoi na bango na mabele oyo ezali nsuka ya makambo nyonso, kasi likoló mpe lifelo ezali mpenza, mpe ntango bomoi na bango na mokili oyo ezali na biteni misato ekosila, bango nyonso bakozonga na mokili na bango ya ebandeli. Yesu amemaki masumu ya bato na ekulusu mpe atyaki kondimana ya sika mpo na komema bana na ye ya bolingo na lola, kasi na lifelo te, esika ya etumbu.
Lifelo, ndenge Biblia elobeli yango, ezali esika oyo bato banyokwamaka mingi. Yango wana Klisto Ahnsahnghong mpe Nzambe Mama bayebisaki kondimana ya sika mbala moko lisusu, kopesaka bato libaku ya kosepela na nkembo ya seko na bokonzi ya lola.
Bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya, Baebele 9:27
Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi. Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango ; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye. Bongo kufa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki kati na liziba ya moto. Liziba ya moto ezali kufa ya mibale. Emoniseli 20:10–14
119 Bundang P.O.Box, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of KOREA
Tel 031-738-5999 Fax 031-738-5998
Head Office: 50, Sunae-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
Main Church: 35, Pangyoyeok-ro, Bundang-gu, Seongnam-si, Gyeonggi-do, Rep. of Korea
ⓒ World Mission Society Church of God. All rights reserved. Privacy Policy